Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

USA ekoboya kopesa nationalité na ba migrants baye bazuwaka aide sociale


Président Donald Trump asololi na bapanzi sango yambo na kozuwa mpepo na Morristown, New Jersey, 13 août 2019
Président Donald Trump asololi na bapanzi sango yambo na kozuwa mpepo na Morristown, New Jersey, 13 août 2019

Gouvernement ya Amerika ebimisi mibeko miye mikopimela nationalité américaine na ba migrants baye bazuwaka lisalisi ya l’Etat (assistance sociale).

Mibeko misakolamaki lundi, milobi ete ba migrants (bapaya bakota na Etats-Unis) bamonisami lokola mokumba na mboka.

"Bapaya mingi mpe mabota na bango bazuwa bolamu (to baprofita) na misala ya lisalisi ya l’Etat. Makoki myango mazali na suka, makokaki kozala mpo na bolamu ya bana ya Amerika baye bazali na nkwokoso," elakisi liyebisi ya Maison Blanche.

Mibeko misakolami lundi na Maison Blanche (ndako ya mosala ya président Donald Trump) milobi ete mikopekisa green card (mokanda ya bapaya bazuwa ndingisa ya kovanda na USA) na migrants. Mpe soki basilaki kozuwa mokanda yango, bakozuwa lisusu nationalité te (bakokoma ba Américains te), elobi mibeko miwuti na ndako ya misala ya président Trump.

Mibeko myango mikotala 22 millions ya bapaya bavandaki na Etats-Unis na botosi mibeko, mpe 10 millions ya bapaya baye bakota na moyibi na Etats-Unis mibu nzike mileki. Mingi kati na bango bazali ba hispaniques (baye bawuta mboka elobaka nkoto ya Espagnol).

Mokano yango mokundoli ete mobeko ya Amerika mopekisa bapaya bakoma mokumba mpo na ekolo. Mokano yango molobi ete bokokisami ya bosenga boye botiyamaki pembeni mibu mingi.

"Gouvernement ya président Trump elingi bapaya bazala na bonsomi na bango (autonomie), mpe mpo moto na moto amema mokumba na ye… (Gouvernement) ezali kosala makasi ete bapaya (immirgants) bazala na makoki ya kokokisa bango moko bosenga na bango mpe balonga awa na Amerika," eyebisi Ken Cuccinelli, mokambi ya mwa ntango ya misala ya immigration.

XS
SM
MD
LG