Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Moto moko akufi na Beni, mosusu na Butembo na botelemeli Monusco


Basoda ya kimya ya ONU (Monusco) na base civile na Boikene, Beni, Nord-Kivu, 26 novembre 2019.
Basoda ya kimya ya ONU (Monusco) na base civile na Boikene, Beni, Nord-Kivu, 26 novembre 2019.

Bato babale bakufi na masasi ntango bazalaki kotelemela Monusco na etuka ya Nord-Kivu.

"Moto moko akufi na Beni, mosusu na Butembo," elobi procureur ya mampinga, Kumbu Ngoma na correspondant ya AFP na Beni.

Monusco, misala ya Nation unies na Congo mpe endimi motango moye.

Nzoto ya moto awei na Beni emonanaki pene na base civile ya Monusco eye empuzami.

Bituluku na bato batelemelaki lisusu esika eye o’mokolo ya mibale. Esika yango ebatelami na ba Casques bleus ya Malawi mpe basoda ya RDC mpe bazali koleka wana.

O’mokolo ya mwa yambo (lundi), bato banei bakufaki na Beni na mobulu kati na lopango ya Monusco. Bazalaki kosenga Monusco elongwa na RDC nsima na bobomami na bato mwambe na maboko ya ba ADF.

Mardi, mobulu mosalami mpe na Goma.

Bisika binso biye misala mitikali ya kokangama. Ba wenze mpe mpe biteyelo bifungolamaki te.

Batelemeli basangaki lisusu ete Monusco elongwa na RDC. Na Beni, moto yango akufi pene na base ya Monusco, epayi wapi batelemeli bazalaki koluka kotika nzoto ya baye bakufaki na milulu mya mokolo mwa yambo.

Na bisika binso biye, police ebeti masasi likolo mpo na kobengana batelemeli.

OMS elongoli bato na yango ne bisika biye mpo na bokengi na bango.

XS
SM
MD
LG