Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Ba ADF babomi lisusu bato pene na 19 na Beni


Ba containers bitumbami mpe bifelo bikunai na loponga ya Monusco na Beni, 25 novembre 2019.
Ba containers bitumbami mpe bifelo bikunai na loponga ya Monusco na Beni, 25 novembre 2019.

Bato pene na 19 babomami na ba ADF o’mokolo ya misato ba Beni (Nord-Kivu), epayi wapi bayike bazali kotelemela Monusco mpe kopalela yango mpo na kozanga kopekisa bosasi ya bavandi.

"Motango ya bawei momati na 19," eyebisi molebeli ya Monusco,

Bobomami byango bosalami na 30 kms na Nord ya Beni na esika ebengami "Triangle de la mort".

ONU elobi ete ebandi bolukiluki mpo na liwa ya moko ya batelemeli akufaki o’mokolo ya mibale nsima na kozwa masasi na lopango ya Monusco na koswana na bango na basoda ya Monusco.

"Monusco etindi na ntongo ya moloko ya misato lipinga ya intervention rapide elongo na basoda ya Congo," esakoli molobeli ya Monusco.

Na bosangisi, bato 99 nde babomami na Beni na maboko ya basimba minduki wuto le 5 novembre, elobi GEC (Groupe d’études pour le Congo).

XS
SM
MD
LG