Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

UNITA ebongisami kozwa mokambi ya sika na Angola


Mokambi ya UNITA, lisanga ya politiki liye Jonas Savimbi atika na Angola, Isaias Samakuva, na lisikulu na Luanda, 25 août 2012
Mokambi ya UNITA, lisanga ya politiki liye Jonas Savimbi atika na Angola, Isaias Samakuva, na lisikulu na Luanda, 25 août 2012

Mokambi ya UNITA, lisanga ya politiki liye Jonas Savimbi atika na Angola, Isaias Samakuva, asakoli ete akotika ebonga na ye mpe lingomba liye likozwa mokonzi ya sika oyo akomena yango na elonga na maponami ya 2022.

M. Samakuva azali kokamba bokutani bonene to congrès ya suka na ye, wuto mokolo ya misato moleki.

"Nalobela bino solo ete na ndimi ete UNITA ekozwa bokonzi na maponami makoya na 2022… Ekoki kosalama," ayanoli na motuna ya AFP.

M. Samakuva akambaka UNITA (Union nationale mpo na limpanda ya mombimba ya Angola) wuto mibu zomi na motoba kasi lisanga liye lilonga nanu maponami wuto ntango nyonso eye.

UNITA ekelamaki na 1966 na bitumba na ba noko (colonisateurs) ya ekolo Portugal. Eyebani mingi mpo na mokambi na yango nguya makasi Jonas Savimbi.

Amerika (USA) mpe Afrika ya ngele bapesaki yango maboko na bitumba na MPLA (Mouvement populaire ya kosikola Angola) eye ezalaki kozwa lisunga ya Union soviétique.

Bato pene na 500.000 bakufaki na bitumba na Angola.

Jonas Savimbi akufaki na bitumba yango na 2002 mpe UNITA abongolamaki na lisanga ya politiki.

Wuto ntango wana, Isaias Samakuva oyo akomi lelo na mibu 93, azwaki ebonga ya mokambi na yango.

XS
SM
MD
LG