Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mobulu kati na Unita na gouvernement mpo na nzoto ya Savimbi


Jonas Savimbi, mokambi ya kala ya Unita, akufaki na bitumba na mampinga ya Angola na Moxcia, 22 février 2002.
Jonas Savimbi, mokambi ya kala ya Unita, akufaki na bitumba na mampinga ya Angola na Moxcia, 22 février 2002.

Unita (Union nationale pour l'indépendance totale de l'Angola) epameli gouvernement ya Angola mpo koboya kopesa yango nzoto ya nkondo Jonas Savimbi o’mokolo ya mardi lokola linaka esakolamaki. Bakonzi ya Angola bango balakisi mosapi na bakambi ya Unita mpe libota na ye mpo na kotiya mobulu.

" Gouvernement ezali koluka koyokisa Unita nsoni mpe kobebisa linaka nyonso ya matanga. Makambo maye makosunga bozongisi ya boyokani na mboka te," elobi molobeli ya Unita Alcides Sakala Simoes na AFP.

Gouvernement esakolaki yambo ete ekopesa Unita mpe libota nzoto ya Savimbi na mboka Luena "kasi na nsima (bakonzi) balobaki ekomi na Kuito mpe na nsuka ekomaki na Andulo," elimboli Sakala.

Matanga ya mokambi ya kala ya Unita esengeli esalema le 1er juin na mboka eye abotama, Loputanga. Kasi milulu yango mikosalama te.

Na ngambo na yango, gouvernement elobi Unita nde ezali kotiya mobulu mpo ezalaki te na Luena mpo na kozuwa nzoto ya mowei.

"Lokola bakambi ya Unita mpe baye ya libota bazalaki te, totiki nzoto yango na na camps to lopanda ya basoda" na Andulo, kasi na Lopitanda lisusu te, elibomboli Pedro Sebastiao, ministre d’Etat mpe mokambi ya bokengi ya président Joao Lourenço, na masolo na bapanzi sango na Luanda.

Mwana masi ya Jonas Savimbi, Helena Savimbi amoni yango "mobulu makasi mingi!"

Jonas Savimbi, motomboki mpe mokambi ya Unita, akufaki na bitumba na mampinga ya Angola le 22 février 2002. Liwa na ye ezalaki suka ya bitumba bizalaki kongala na Angola banda lipanda na ya ekolo eye na 1975.

XS
SM
MD
LG