Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Rwanda na Ouganda bandimi kozongisana bato ba boloko ba bango

Paul Kagame, président ya Rwanda (D) na Yoweri Museveni ya Ouganda (2e D) na bakokani ba bango ya Angola, Joa Lourenco (2e G) na ya ekolo Congo démocratique Félix Tshisekedi (G) na Luanda, Angola, 3 fevrier 2020. (Twitter/Présidence RDC)

Paul Kagame, président ya Rwanda na mokakani wa ye ya Ouganda, Yoweri Museveni, bandimi kozongisana bato ba bango ya boloko na bokutani o'mokolo ya eyenga na Luanda, Angola, na lisungi ya bakokani ba bango ya Angola, Joa Lourenco na ya RDC Félix Tshisekedi.

Yango nde moko na mikano mizwami na bokutani ya misato bosalamaki kati na bakambi banei baye ya etuka ya Grands lacs.

Bakambi baye bayebisi te na bozindo mokolo nini mpe ndenge nini bozongisanami ya bato ya boloko bokosalama.

Paul Kagame na Yoweri Museveni bandimi kokoba boyoka batiyaki maboko na lisungi ya Felix Tshisekedi mpe Joao Lourenco le 21 aout 2019.

Mboka eye mibale ezalaki na matata. Bayi bokengi ya mboka mibale bakangamaki na ngambo moko to mosusu.

XS
SM
MD
LG