Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mangwele ma COVID-19 makobanda kopesama le 12 mars na RDC


Mosali moko ya UNICEF pene na maboke ma mwangwele ma COVID-19 ya AstraZeneca makoni na libanda lya mpepo ya N'Djili, Kinshasa, 2 mars 2021. (Twitter/UNICEF)
Mosali moko ya UNICEF pene na maboke ma mwangwele ma COVID-19 ya AstraZeneca makoni na libanda lya mpepo ya N'Djili, Kinshasa, 2 mars 2021. (Twitter/UNICEF)

Campagne ya vaccination to misla mya bopesi mangwele ma COVID-19 mikombanda le 12 mars na Ekolo Congo démocratique. Ministre ya mambi ma bokonongo Dr. Eteni Longondo nde asakoli yango.

Mangwele million moko na nkoto nkama sambo (1,7 millionS) makomaki na Kinshasa mpo na kokabolama mpe kotobolama na bato.

Ezali mangwele ma AstraZeneca.

"Tozali kokoba koyebisa bato bolamu bwa mangwele mpo makono mingi mapanzana na mokili masila kaka na nzela ya mangwele... Mbulamatari ekoki te kopesa bato mangwele mabe makoki koboma bato. Tozwaki nanu ntangu ya kotala sanza misato mangwele mango yambo tondima yango," elimboli Dr. Eteni.

Dr. Eteni Longondo alobi ete kino motango ya bato nkoto nkama mwamba na ndambo (850.000) nde bakoki kopesama mangwele mango.

Bituka bya Kinshasa, Nord-Kivu, Kongo central mpe Haut-Katanga nde bakozwa yango yambo.

Yango nde bisika bakoni mingi bazwami na COVID-19 koleka. Kinshasa nde na molongo ya yambo na RDC mobimba.

Ezala mingi mpenza basali ya bokolongo, baye babetlaka makono lokola diabète, hypertension mpe baleki minene mpe bakolo baye baleki mibu tuku mitano na mitano.

RDC ezali kati bikolo biye bipesami mangwele na nzela ya misala mya COVAX ya ONU.

XS
SM
MD
LG