Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Moyi Biélorussie Aleksandr Zingman atikami mposo mibale nsima na kokangama na Loano


Ba policiers na mutuka moko na Lubumbashi, Haut-Katanga, 9 décembre 2011.
Ba policiers na mutuka moko na Lubumbashi, Haut-Katanga, 9 décembre 2011.

Moyi mobombongo ya ekolo Bielorussie mpe consul ya kala ya Zimbabwe, Aleksandr Zingman atikamaki nsima na kokangama mposo mibale mileki na libanda lya mpepo ya Loano, na Lubumbahsi, na Haut-Katanga.

Aleksandr Zingman, na mibu tuku mitano na minei, alobi asimbamaki na ANR misala mya bokendi ya Ekolo Congo démocratique na Kinshasa mpe ayanolaki na mituna.

Alobi ba bapanzi sango ya Zimbabwe epayi wapi akomi ete atikamaki mercredi.

Ba media mingi balobake ete azali moteki minduki mpe akangamaki nsima na kokutana na mokonzi ya kala Joseph Kabila na Haut-Katanga.

Kasi bayi mbulamatari ya Ekolo Congo démocratique, ba ministres baike bayanolaki ten a VOA Lingala mpo na likambo lyango.

Aleksandr Zingman alobi akendaki na Haut-Katanga, na RDC, mpo na kokutana na bayi Fondation Kapenda Tshombe, Ministre wa Yambo ya kala ya RDC, mpe président ya botomboki na Katanga.

Baike baloba ete Aleksandr Zingman azali moko na bayi Nzinga Nzinga ya président ya Biélorussie Alexandre Loukachenko.

Na passeport ya Etats-Unis, atkamaki elongo na bato babale bazalaki na ye mpe azongi Zimbabwe.

XS
SM
MD
LG