Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi asukisi état d'urgence sanittaire kasi Matanga matikali ya kopekisama


Président Félix Tshisekedi na lisikulu na ye mpo na mibu 60 ya Lipanda, na Cité ya Union africaine, Kinshasa, RDC. 30 juin 2020. (Facebook/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi na lisikulu na ye mpo na mibu 60 ya Lipanda, na Cité ya Union africaine, Kinshasa, RDC. 30 juin 2020. (Facebook/Présidence RDC)

Président Félix Tshisekedi asakoli suka ya éetat d'urgence atiaki wute le 24 mars. Asengi na bana RDC kokoba kolanda malako ya komibatela mpe kobatela basusu.

M. Tshisekedi alobi esengeli koyeba kobika wuto sik'oyo na bokono bwa COVID19 mpo état d'urgence ezali mpo na kobatela bana mboka na yango.

Bato bayambaki na makele ya mituka mpe na kosepela na bisika biike Kinshasa mpe bitaku bisusu, bosakolami ya suka ya état d’urgence Sanitaire na mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi.

Etat d'urgence yango ebakisamaki mikolo mbala motoba.

Kolanda maye M. Tshisekedi asakoli, biteyelo ya se mpe ya likolo bikobanda kofungolama le 3 août mpe le 15 août nde bitonga, bisaka ya kosangana mpe ndelo ya mboka nde efundwami. Président

Tshisekedi asengi bana mboka kokoba kotosa malako ma komibomba. Matanga ya bato ebele nde matakali ya kopekisama.

XS
SM
MD
LG