Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Procès 100 jours : Kamerhe alobi azalaki kaka ye moko te kokamba misala


Vital Kamerhe, directeur ya cabinet ya président Félix Tshisekedi, na bosambisami na boloko ya Makala, Kinshasa, 11 mai 2020.
Vital Kamerhe, directeur ya cabinet ya président Félix Tshisekedi, na bosambisami na boloko ya Makala, Kinshasa, 11 mai 2020.

Vital Kamerhe, mokambi ya ndako ya misala ya président Félix Tshisekedi Fatshi, alobi bazalaki libwa na kokamba misala ya "100 jours ya président Tshisekedi" mpe lipinga lyango likambamaki na ambassadeur intinérant ya président Félix Tshisekedi, Nicolas Kazadi.

M. Kamerhe na bafundami babale basusu bazalaki na bobandi ya kosambisama na bango lundi na chambre foraine na boloko ya Malaka epayi wapi batiyama wuto pene na sanza mibale. Azalaki na zolo mpe monoko ezipama na masque na bobangi COVID-19

Bosambisami bwango bozali mpo na mambi ya kotonga mpo na mikolo nkama ya mokonzi mboka

Mibu 61, motambwisi ya kala ya Assemblée nationale mpe mokambi ya Union pour la nation (UNC), lingomba na ye ya politiki, Vital Kamerha, oyo azali allié ya likonzi na boyokani ya lingomba ya maponami CACH, (Cap pour le changement) afundami elongo na Libanais Samih Jamal na kopengwisa misolo 48 millions $ mizalaki mpo na kotonga ndako mpe lisusu 237 millions mpo na ndako 3.000.

"Nazalaki kaka nga moko te kotambuisa misala ya 100 jours. Tozalaki lipinga lya bato libwa… Motakambi ya lipinga ya batambwisi ezalaki Me Nicolas Kazadi oyo azali ambassadeur ya president Félix Tshisekedi," eyanoli M. Kamerhe na mituma mya yambo ya tribunal.MM Kamerhe afundami mpe lisusu mpo na kondima, na nzela ya mwana na ye Souraya Mpiana, ndambo ya lopango monene ewutaki na M. Jamal na ntina ya komema mokonzi ya mboka Tshisekedi kondima kosala na Libanais eye.Mokolo mwa yambo mozalaki mingi ya kotuna bafundami koloba nani bazali mpe soki bayebi misala ya botongi ya 100 jours.

Basambi (avocats) basengi bazuzi kopesa bango mikanda mpe mikolo mpo na kotanga yango, balobi bazalaki te ntango M. Kamerhe ayanolaki na parquet.

Basambeli ya M. Kamerhe mpe ya bafundami basusu basengi mpe ete babimisa bango mpo babanda kosamba na nzela.

Samih Jamal, ya mibu 81, Libanais nkolo na compagnie Samibo SARL mpe Husmal SARL mpe ayanolaki.

Lokola mpe M. Jeannot Muhima Ndoole.

Bazuzi bafungoli kinzozi ya Chmabre du Coseil mpo na kotala soki kobimisa to kotika na boloko basamebeli na bosenga na ba avocats.

Kasi bosambisami bokozonga le 25 mai.

XS
SM
MD
LG