Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Pierre Lumbi secrétaire général ya Ensemble akufi


Pierre Lumbi na masolo na Etienne Tshisekedi na Limete, Kinshasa, 25 avril 2017. (Facebook/Pierre Lumbi Okongo)
Pierre Lumbi na masolo na Etienne Tshisekedi na Limete, Kinshasa, 25 avril 2017. (Facebook/Pierre Lumbi Okongo)

Sénateur Pierre Lumbi Okongo, secrétaire général ya Ensemble pour la république, lingomba ya politiki libotamaki mobu moye nzinga nzinga na Moïse Katumbi, akufi.

Bayi lingomba Ensemble bandimi liwa lya Lumbi na COVID-19 o'mokolo mwa eyenga na lopitalo CMK, Centre médicale ya Kinshasa epayi wapi bakoni baike ya bokono boye bazali kopesa lisalisi.

Jean-Pierre azalaki moko na bayi politiki ya kopesa malabo ya kobinsa mitema.

"Nakokanisa ye lokolola moto amipesaki mpo mboka na ye mpe alingaki Congo ya sika," ekomi M. Bemba na Twitter.

Pierre azalaki kaka ye moko na bakambi ya Esemble oyo apesamaki ebonga.

Yende azalaki kobongisa botiyami to bovandisami bwa parti Ensemble.

Pierre Lumbi azalaki mokambi ya mangomba mabalele misusu ya politiki akelaki, lokola MCR.

Azalaki Conseiller spécial ya mambi ma bokengi ya président Joseph Kabila.

Nsima na yango akendaki na opposition. Azalaki moko na baye bakelaki Rassemblement Nzinga Nzinga na Etienne Tshisekedi na 2017.

XS
SM
MD
LG