Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Kabila asengi bayi FCC kotikala na boyakani na CACH


Bayi FCC bakutanaki na mokonzi ya kala Joseph Kabila na Kingakati, Kinshasa, 23 décembre 2019. (Twitter/Jean-Pierre Kambila)
Bayi FCC bakutanaki na mokonzi ya kala Joseph Kabila na Kingakati, Kinshasa, 23 décembre 2019. (Twitter/Jean-Pierre Kambila)

Joseph Kabila, mokonzi ya kala ya RDC mpe mokonzi ya FCC ayebisi bayi lisanga monene liye ete ezali na litombo monene kotikala na boyokami na CACH ya président Félix Tshisekedi. Alobi yango lundi na likita na bango na Kingakati, na Kinshasa.

Bayi FCC (Front commun pour le Congo) bakutanaki mpo na kopesa Joseph Kabila biyano biye bibimaki na likindo lya bango ya suka ya novembre na Kisantu, na Kongo-central.

"Lisikulu na ye (ya Joseph Kabila) ekendaki na ndenge ya koloba polele litomba ya kobatela boyokani boye, ya kosimba yango mpe kopesa maboko na ba institutions," elobi motambwisi ya FCC, Néhémie Mwilanya.

FCC ezali na boyokani ya kokamba mboka na CACH. FCC ezali na majorité na institutions manso kasi CACH ezali na présidence ya république.

Na likita na bango ya Kingakati lundi, bayi FCC basakoli mpe biyano bazwaki na likindo ya Kisantu mpo etali ntina nini candidat na bango na maponami ya mokonzi ya mboka, Emmanuel Ramazani Shadary, alongaki te na décembre 2018.

Kati na yango, batangi bozongisi maponami nsima na 2016.

Balobi mpe lisusu ete bozangi kosolola malamu na baponi ezali moko na ntina.

Mpasi ewutaki na bokambi mabe mibu miike yambo na maponami mpo misolo minso mipesamaki na maponami, boponami ya candadit na bango na ngonga ya suka, lolenge ba bureaux ya vote ezalaki na bityelo ya ba katoliko mpe makambo mingi missusu mitangamaki lokola ntina ya bokweyisami ya Emmanuel Ramazani.

XS
SM
MD
LG