Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Congrès epesi Sassou ndingisa ya kobakisa mikolo 20 na Etat d’urgence


Bayi Parlement na Congo-Brazzaville, 13 septembre 2017. (VOA/Ngouela Ngoussou)
Bayi Parlement na Congo-Brazzaville, 13 septembre 2017. (VOA/Ngouela Ngoussou)

Congrès ya Congo-Brazzaville ebimisi mobeko ya kondima ete président Denis Sassou N'Guesso abakisa mikolo tuku mibale na Etat d’urgence sanitaire asokolaki le 28 mars.

Mobeko Assemblée nationale mpe Sénat ya Congo-Brazzaville ezwamaki o'mokolo mwa eyenga, ekopesa nzela ete makoki mabakisama na bitumba na COVID-19 mpe na lolenge ya koyeba kosalela mikano ya bokangami na ndako na lolelende ya kolanda bosembo.

Na Ngambo ya ekolo Congo démocraique, bokutani ya Congrès bosalami lisusu mpo na nungu nungu ebimaki likola na yango kati na bayi CACH, lingomba ya mokonzi Felix Tshisekedi na bayi ya FCC ya mokonzi ya kala Joseph Kabila.

Etat d’urgence epesaka ndingisa na mokonzi ya ekolo kobotolabato bonsomi na yango mpo na mwa ntango. Ezwamaka soki mboka ekoti bitumba to soki nkwokoso makasi epekisi ba institutions kosala mosala.

XS
SM
MD
LG