Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Tshisekedi alobi alingi RDC ekoma lokola Singampour


sident Félix Tshisekedi, na katikati, na bokutani ya losambo mpo na mboka na Pullman hôtel na Kinshasa, 9 novembre 2019. (Facebook/Présidence RDC)
sident Félix Tshisekedi, na katikati, na bokutani ya losambo mpo na mboka na Pullman hôtel na Kinshasa, 9 novembre 2019. (Facebook/Présidence RDC)

Président Félix Tshisekedi alobi ete kondima na ye ezali ete RDC ekokoma lokola Singapour, mboka eye ya Asia etombwami mingi.

Alobi yango na bokutani ya losambo ya mboka na Pullman hôtel na Kinshasa yambo na kozwa mpepo mpe kokende na Ouganda.

"Soki Singampour ekoma lelo mboka eye etombwama ata ezali te na makoki lokola ya RDC, elingi koloba ete yango mpe ekoki mpe kosalama mpo na ekolo na biso. Ngai, nazali na kondima. Yango wana, natie makasi mpo na kozongisa makambo ya malamu ya bosembo, ya kimya mpe ya bolingo. Soki yango te, tokokoma te na ntombwa (developpement)," esakoli M. Tshisekdi.

Peter Pham, motindami ya USA mpo na etuka ya Grands Lacs azalaki na bokutani bwango.

Bokutani bwango bosangisaki bato mingi.

Mama na likambo ya bokutani bwa bozalaki bosembo nde botombolaka ekolo.

XS
SM
MD
LG