Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Matungulu akambi BAD na masolo na PM Ilunga mpo na kosunga mbulamatari


Freddy Matungulu (G), mokambi ya BAD (Banque africaine de développement) na masolo Ministre wa yambo Sylvestre Ilunga Ilunkamba na Kinshasa, RDC, 4 novembre 2019. (Primature RDC)
Freddy Matungulu (G), mokambi ya BAD (Banque africaine de développement) na masolo Ministre wa yambo Sylvestre Ilunga Ilunkamba na Kinshasa, RDC, 4 novembre 2019. (Primature RDC)

Freddy Matungu, mokambi ya sika ya BAD (Banque africaine de développement), alaki lisusu lisungi ya mosala na ye na mbulamatri ya RDC. Ezalaki nsima na masolo ya mikolo mibale na batambwisi ya ekolo eye.

M. Matungulu akambi lipinga ya BAD liye lisololi na mbulatari ya ekolo Congo démocratique wuta suka ya mposo moleki.

"Tozali kokende nsima na koyeba malamu makombo ya litomba maye mbulamatari alingi kosala," eyebisi M. Matungula na bapanzi sango.

Alobi ete mobembo na ye na lipinga ya BAD elakisi lolenge BAD ezali kosepela makasi kosunga RDC. Kasi alimboli ete BAD esengi mbongwana mbulamatari kosala mbongwana mpo etali politique économique mpe sociale.

Abeti sete ete BAD ezali kopesa litomba ya liboso na énergie (lotiliki), bileyi ya bato (milona, industries), intégration régionale, social, éducation mpe santé (bokolongono).

BAD nde ekopesa misolo mpo na botongi na gbabga ya engunduka mpe mituka kati na Brazzaville mpe Kinshasa, bingumba mingama.

Misala ya botongi yango mikobanda na juillet 2020. Kasi RDC, elingi yambo kotonga lipongo ya Banana.

M. Matungulu azalaki moko ya bayi Lamuka (lingomba ya oppostion). Nkombo na ye epesamaki na président Félix Tshisekedi na juillet mpo na kokamba BAD.

XS
SM
MD
LG