Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Tshisekedi abonzi Congo démocratique na maboko ya Nzambe


Président Félix Tshisekedi na milulu ya losambo ya ba kristu ya biyamba ya bolamuki (églises de réveil) na bisusu, o’mokolo ya eyenga na statde des Martyrs., 23 juin 2019. (Twitter/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi na milulu ya losambo ya ba kristu ya biyamba ya bolamuki (églises de réveil) na bisusu, o’mokolo ya eyenga na statde des Martyrs., 23 juin 2019. (Twitter/Présidence RDC)

Président Félix Tshisekedi abonzi Congo démocratique na maboko ya Nzambe na milulu ya losambo ya ba kristu ya biyamba ya bolamuki (églises de réveil) na bisusu (lokolaka kimbaguiste), o’mokolo ya eyenga na statde des Martyrs.

Ezalaki mokolo ya bozongisi matondi na ekolo mobimba (Journée nationale d’action de grâce/JNAG) ya yambo, botiyami na mokonzi ya sika Tshisekedi, kolanda baye bazali na mabongisi mango.

"Nabonzi Congo na maboko ya Tata Nzambe," elobi mwana mboka Tshisekedi na lisako na ye.

M. Tshisekedi asengi, na losambo na ye, ete Nkolo avanda na ngwende na ekolo Congo démocratique mpe akonza.

"Lokola mokambi ya molimo ya mboka oyo, kolanda liloba lilobi ete bokonzi bonso bowuti na Nzambe, nalongoli maloba manso ya mabe malobamaki likolo ya ekoloe eye, nalongoli bilakeli binso bya mabe, molili mokokonza lisusu te…," ekataki M. Tshiseketi.

"Natatoli ete Congo ezali komata mpe ekozonga lisusu nsima te... Nakati ete mokolo ya sika ebandi na Congo na kombo na Yesu," elobi M. Tshisekedi.

Mokonzi ya mboka ya sika asengaki bolimbisi mpo ekolo mobimba.

XS
SM
MD
LG