Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Fayulu asengi maponami masusu mpe coalition CACH/FCC kokamba mboka sanza 18


Martin Fayulu na plateau ya VOA, na Washington, 27 mars 2019. (VOA/Eddy Isango)
Martin Fayulu na plateau ya VOA, na Washington, 27 mars 2019. (VOA/Eddy Isango)

Martin Fayulu, moko ya lingomba Lamuka mpe mokambi ya Ecidé (Engagement pour la citoyenneté et le développement), asengi maponami masusu mpe bokelami ya misala mikotala mbongwana ya bokambi mboka.

Apesi makanisi maye na mokanda atie maboko o’mokolo ya le 4 novembre, mpo na koluka eyano na nkwokoso ya nsima ya maponami ya le 30 décembre 2018, ayebisi na makomi na ye.

Asengi bokelami ya misala mikobengama "Haut conseil national des réformes institutionnelles" (HCNRI), miye mikotala "mbongwana ya lombango mpe ya litomba na mambi "ya Commission électorale, ya zuzi ya nkwokoso ya maponami, ya kobatela mpe kokengela (ekolo), ya bokambi (bitumba na kaniaka) mpe ya makoki ya bomoto".

HCNRI ekosalama "nsima na masolo kati na ngambo inso ya ekolo", ekomi M. Fayulu.

Asengi maponami manso (ya mokonzi ya mboka, ya ba ntoma ya Assemblée nationale mpe ya bituka, ya ba Sénateurs, ya bakambi ya ba Assemblées provinviales, ya ba gouverneurs mpe vice-gouverneurs ya bituka).

"Maponami mango makozala mpo na bato banso," elobi M. Fayulu.

M. Fayulu asengi eleko ya pene na sanza zomi na mwambe (18 mois) mpo na mbongwana. "Coalition CACH/FCC (ya président Félix Tshisekedi mpe ya mokonzi ya kala Joseph Kabila) ekokamba mboka mpe coalition Lamuka ekokamba HCNRI," elobi na siki siki M. Fayulu.

Alimboli mpe ete mabongisi ya lombango masalama mpo na kobatela mabele ya ekolo mpe na kobongola mampinga ya mboka.

M. Fayulu akoba koloba ete alongaka maponami ata CENI mpe Cour constitutionnelle esakolaki Félix Tshisekedi molongi ya maponami ya décembre 2018 uto janvier 2019.

M. Fayulu zali na mobembo na poto, mingi mpenza na France.

XS
SM
MD
LG