Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi akutani na emir ya Qatar mpe bikolo mibale batie manzaka na mambi ma mpepo mpe mabongo


Emir ya Qatar Cheikh Tamin Bin Hamad (D) ayambi président Félix Tshisekedi na Doha, Qatar, 29 mars 2021. (Facebook/Présidence RDC)
Emir ya Qatar Cheikh Tamin Bin Hamad (D) ayambi président Félix Tshisekedi na Doha, Qatar, 29 mars 2021. (Facebook/Présidence RDC)

Qatar endimi kosunga RDC na boyokani mpo etali kobongisa mambi ma mpepo, mabongo mpe makambo masusu, na bokutani ya emir ya Qatar Cheikh Ramin Bin Hamad na président Félix Tshisekedi na Doha.

Cheikh Tamin Bin Hamad, emir ya Qatar akutani na président Félix Tshisekedi mokonzi ya Ekolo Congo démocratique mpe motambwisi ya Union africiane, na Doha engumba mokonzi ya Qatar.

Emir ya Qatar alobi ete asengi na ekolo na ye makoki mpo kokolisa bondeko kati na mboka na Ekolo Congo démocratique.

RDC na Qatar batie manzaka na boyokani mpo na kosala elongo na mambi Kobongisa maye matali misala mya mpepo, ya mabongo mpe kokolisa boyebi bayi RDC.

Boyokani bwango botali mpe nkita, mombongo mpe misala misusu. Masolo ma bango mazalaki mpe mpo boyokani na Union africaine mpe bolamu ya ngambo ibale.

XS
SM
MD
LG