Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mbulamatari ya Biden ezali kotia loboko' ya sika na boyokani na Tshisekedi, elobi ntoma Booth

Ntoma Donald Booth, molakisi ya Etats-Unis na Sudan mpe Sudan ya Sud (G), na ntoma Mike Hammer ya Amerika na Kinshasa (C) na masolo na président Félix Tshisekedi, na cité ya Union africaine, Kinshasa, 23 mars 2021. (Twitter/Ambassade ya USA na Kinshasa)

Donald Booth, molakisi ya elongi ya Etats-Unis na Sudan mpe na Sudan ya Sud akambaki limpinga lya ekolo lya ye na masolo na président Félix Tshisekedi na Kinshasa.

Limpinga lyango lizali ya Bureau ya Afrika ya Départment d’Etat ya Amerika liye likkutani na président Tshisekedi bo’ mokonzi ya RDC mpe mokambi ya Union africaine.

"Ntoma Donald Booth alobi ete mbulamatari ya Biden ezali kosala mpo na kotia loboko' ya sika na boyokani na RDC mpe na bikolo binso bya Afrika," elobi présidence ya RDC na Twitter.

Masolo mango mazalaki mpo na kimya na Afrika mpe bokambi ya M. Tshisekedi na UA.

XS
SM
MD
LG