Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshiskedi atie mikolo misato ya matanga mpo Magufuli na RDC wuto mardi


Président Félix Tshsiekedi (G) ya RDC apesi mbote na mokoni wa ye ya Tanzanie John Magufuli (D) na Dar es Salam, Tanzanie, 18 août 2019. (Facebook/Prsident RDC)
Président Félix Tshsiekedi (G) ya RDC apesi mbote na mokoni wa ye ya Tanzanie John Magufuli (D) na Dar es Salam, Tanzanie, 18 août 2019. (Facebook/Prsident RDC)

Président Félix Tshisekedi akati ete RDC ekozala na matanga ya mikolo mibale wuto mokolo ya misato le 23 mars mpo na liwa lya président John Magufuli ya Tanzanie.

"Wuta le 23 mars kino le 25 mars bendela ya Congo ekotikala ya kokitisama na kati kati na elembo ya matanda," elobi président Tshisekedi na liyebisi.

"Mokonzi ya ekolo azali na mawa mpo liwa lya mokambi monenen, moningami ya bolamu ya Afrika mpe mobundi ya bonsomi ya bomoto mpe ya nkita ya Afrika," elobi misala ya présidence ya RDC na Twitter.

RDC ezali kokundala bondeko bwa kala na Tanzanie.

Bikolo mibale bakobolaka ndelo ya 459 km.

Vice-présidente ya Tanzanie Samia Luhulu Hassan afandisamaki na ebonga ya kokamba Tanzanie o'mwa mitano nsima na kolapa ndayi na Dar es Salam.

Mama Luhulu nde asakolaki liwa lya nkondo Magufuli o'mwa misato nsima na bokono ya motema.

XS
SM
MD
LG