Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Président Mokwetsi Eric ya Botswana na Tshisekedi bayokani kokolisa bondeko kati na bikolo na bango


Président Félix Tshisekedi ya RDC (2e D) ayambi mokakani wa ye Botswana Dr. Mokgwetsi Eric Keabetswe Masisi na etando ya Palais de la nation, Kinshasa, RDC, 15 mars 2021. (Twitter/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi ya RDC (2e D) ayambi mokakani wa ye Botswana Dr. Mokgwetsi Eric Keabetswe Masisi na etando ya Palais de la nation, Kinshasa, RDC, 15 mars 2021. (Twitter/Présidence RDC)

Président Dr. Mokgwetsi Eric Keabetswe Masisi ya Botswana akutani na mokokani wa ye RDC président Félix Tshisekedi na Kinshasa. Mobembo mwango mozalaki mpo na kokolisa bondeko kati na bikolo bibale, kolanda présidence ya RDC.

"Bokoli bondeko kati na bikolo mibale RDC na Botswana, boyokani na nzela mingi, maye matali etuka mpe continent mpe lokola bitumba na bokono bwa COVID-19 ezalaki kati na masolo na bango ya koleka ngonga mibale," eyebisi présidence ya RDC.

Félix Tshisekedi oyo azali kokamba sika Union africaine ayambaki moninga wa ye na ntina ya misala mya kokamba Afrika abandil.

Dr. Mokgwetsi Eric Keabetswe Masisi akomaki na Kinshasa mpo na mobembo ya mwa ngonga.

Kolanda présidence ya RDC< bakonzi babale balakisi mokano na bango ya kopesana maboko,

Mobembo mwango mabandisi eloko ya sika ya boyokani kati bikolo mibale.

XS
SM
MD
LG