Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

VPM Ministre ya Bosembo Tunda atikami


Vice-Premier ministre ministre ya mambi ya Bosembo Célestin Tunda ya Kasende, Kinshasa, 3 mars 2020 (Facebook/Célestin Tunda Ya Kasende)
Vice-Premier ministre ministre ya mambi ya Bosembo Célestin Tunda ya Kasende, Kinshasa, 3 mars 2020 (Facebook/Célestin Tunda Ya Kasende)

Vice-Premier ministre mpe ministre ya mambi ma Bosembo Célestin Tunda wa Kasenda atikami nsima na koyanola na procureur ya Cour ya cassation samedi.

VPM Tunda azongi ndako na ye kasi atiami na bokengelemi na esika avandaka, eyebisi bapanzi sango bazali na Cour ya cassation.

Me Tunda akitaki nsima na bobimisa bwa ye na ndako ya PPRD, lingomba lya Joseph Kabila, mokkonzi ya kala, oyo azali moko kati na yango.

"Bakoki kobangisa biso te!" elobaki kalaka mokambi ya PPRD na bokutani bwango epayi wapi boko na baye lingomba bazalaki mpe batalisaki nkanda na bango.

Me Tunda aynolaki na procureur ya Cour ya cassationi mokolo moko nsima na matata mazalaki na likita lya mbulamatari epayi wapi apamelamaki na kotinda na Assemblée nationale mokanda ya kondima mabongisi ma mibeko misato matali misala mya bazuzi.

Mokonzi ya mboka atikaki likita lya mbulamatari mpe asilisaki kobamba lyango te. Kasi misala muya président bayebisaki ete ezalaki mpo na bokutani na bakonzi ba mboka misusu na video-conference.

Mublamatari elobaki ete ntina ya mbongwana ya misala mwa bazuzi eye esengami na bayi FCC ezali nalitomba ya lombango te sik'oyo.

Commission Politique Administrative mpe Justice ya Assemblée nationale elobaki mpe ete ntina na yango ezali te sik'oyo.

Bayi société civile lokola ACAJ mpe bato basusu basengaki bokangi mpe bolongolami bwa me Tunda na mbulamatari mpo na yango.

Mabongisi ma mibeko misato mizali kopesa makoki na ministre ya Bosembo kopesa mitindo miike na bazuzi.

Bato baike bakitaki o'balabala mikolo mingi mposo eye mpo na koboya mabongisi mango. Babunaki, ba mpunzaki mpe batiaki moto na ndako mpe biloko biike ya ba députés ya PPRD na FCC.

XS
SM
MD
LG