Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ministre ya Yambo asengi balendela bazuzi baye batindaki bokangami ya VPM Tunda


Ministre ya Yambo Sylvestre Ilunga na Assemblée nationale na Kinshasa, RDC, 6 mai 2020. (Twitter/Primature RDC)
Ministre ya Yambo Sylvestre Ilunga na Assemblée nationale na Kinshasa, RDC, 6 mai 2020. (Twitter/Primature RDC)

Ministre ya Yambo, Sylvestre Ilunga atalisaki nkanda na ye nsima ya bokangami samedi ya vice-Premier ministre ya Bosembo Célestin Tunda mpe asengi bolandelami bwa bazuzi batindaki bokangemi ya ministre. Akebisi ete ekoki komema na bokweyisami bwa mbulamatari.

"Makambo maye ya mabe makasi maye masalama nanu te, mazali na lolenge ya kobebisa kimya mpe boyokani bolamu kati na ba institutions mpe makoki komema na botiki mosala na bayi mbulamatari," ekebisi PM liyebisi na molobeli na nzela na ye Albert Lieke Milay atie manzaka.

"Premier ministre asengi na tata mokonzi lokola mobateli ya boyokani kati na ba institutions, koloba na Conseil supérieur ya Magistrature na ntina ya kopesa etumbu na ba magistrats baye bakangaki mpamba vice-Premier ministre mpe ministre ya mambi ma Bosembo mpe Mobateli bilembo bya mboka, "ekomi na liyebisi lyango PM Ilunga.

Kolanda liyebisi ya Primature, ministre ya Yambo atalisaki nkanda samedi nsima na bokutani bosalamaki kolanda bokangami mpe bomemami ya M. Tunda na Cour ya cassation epayi wapi alekisaki ngonga nzike na koyanola na procureur.

Premier ministre asangisaki na bokutani bwango ba Vice-Premier ministres na ba ministres d’Etat.

Mokambi ya mbulamatari apameli mpe misala mya police mpe mya bokendi mpo ete misala mya bango milanda na bokebi bonso Buku likonzi mpe mibeko mya mboka.

"Bayi mbulamatari balakisaki nkanda na bango mpo na nsoni moninga na bango ya mosala ayokaki," elobi liyebisi lya Primaturei.

Mpo na bayi mbulamatari bokangami bwango bosalamaki na bozangi botosi ya Etat de droit.

M. Tunda abimisamaki nsima na koyanola na bazuzi.

Moko na bayi ngambo ya CACH, mokambi mwa lingomba ECCO Adam Bombole apameli Premier ministre mpe alobi M. Ilunga azali na mpifo te ya kopesa tata mokonzi mibeko.

XS
SM
MD
LG