Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Amida Shatur ayonoli te na parquet, ba avocats na ye balobi azali maladi


Hamida Shatur, molongani ya Vital Kamerhe, mokambi ya kala ya ndako ya misala mya président ya Félix Tshisekedi, na bosambisami bwa mobali na ye, na boloko ya Makala CPRK, 4 juin 2020. (Capture d'écran)
Hamida Shatur, molongani ya Vital Kamerhe, mokambi ya kala ya ndako ya misala mya président ya Félix Tshisekedi, na bosambisami bwa mobali na ye, na boloko ya Makala CPRK, 4 juin 2020. (Capture d'écran)

Amida Shatur, molongani ya Vital Kamerhe akokaki te koyonalo ye moko na bobengisami na ye na Parquet ya Cour d’Appel ya Kinshasa/Mattete vendredi.  Ba avocats ba ye bolobi azali koyokoya nzoto malamu te.

Amida shatur atindaki basambeli baye na esika na ye.

Atangamaki na bosambisami ya Mobali na ye, Vital Kamerhe oyo akatelamaki mibu tuku mibale mya misala makasi bakisa mibu zomi mya bopekisa ya makoki ma politiki,https://www.voalingala.com/a/marie-jos%C3%A9e-mengi-mosungi-ya-hamida-kamerhe-atiami-na-bokangi/5454305.html

Vital kamerhe akweyisamaki o'likambo mpo bopengwisi misolo pene na 50 millions $ ya botongi ntango na ntina ya mikolo nkama mya bokonzi ya Felix Tshisekedi.

Tribunal esengaki na ekateli na yango bokangami bwa misolo mpe biloko ya Amida Shatur mpe ya mwana ya ndeko ya Kamerhe Daniel Massaro.

Mosungi ya Amida Shatur, Marie-Josée Mengi akangamaki pene na mposo mibale mileki.

Nzokande basaembeli ya Kamerhe basali appel to basengi na bazuzi kotala lisusu bosambisami bwa ye.

XS
SM
MD
LG