Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mokanda ya Trump na Tshisekedi mpo na mibu 60 ya lipanda ya RDC


Ntoma ya Amerika na Kinshasas, Michael Hammer "Nzita" (D) apesi mokanda ya président Trump na président Félix Tshisekedi na Kinshasa, RDC, 28 juin 2020. (Twitter/Michael Hammer)
Ntoma ya Amerika na Kinshasas, Michael Hammer "Nzita" (D) apesi mokanda ya président Trump na président Félix Tshisekedi na Kinshasa, RDC, 28 juin 2020. (Twitter/Michael Hammer)

Président Donald alobi Etats-Unis ezali na esengo ya kopesa maboko na makasi ya Félix Tshisekedi mpo na kobongisa mboka. Mokonzi ya Amerika atindeli mokambi RDC mokanda mpo na mibu 60 lipanda ya mboka eye le 30 juin.

"Ntango eye 2020, mobu olobaki ezali mwa mosala, mozali kokoba ata mikakatano mya bokono bopanzani na molongo mobimba mpe bozongi na Ebola, Etats-Unis esepeli na kopesa maboko na makasi ma yo malukaka kobatela makoki ma bomoto, bitumba na kaniaka, mpe bokambi malamu, bonsomi bwa kosombitinya (libre marché), bokengi, bokolongono, ntombwa mpe kelasi," ekomi M. Tump.

"Nazali na elikya ete makasi mango makomema mbongwana bana ya Congo bazali kozela mpe makofungola nzela na mabaku malamu mpe lobi elamu eye Ekolo Congo démocratique esengeli na yango," ebakisi M. Trump.

Ambassadeur ya USA na Kinshasa, Michael Hammer, "Nzita", lokola amibengaka, amemelaki mokanda yango dimanche na président Tshisekedi.

Na mokanda mwango, M. Trump akundoli ete RDC ezali mboka ya lintomba mingi mpe Afrika ya kati mobimba ekozwa mingi na makasi mazali kosalama na ekolo eye na ntina ya kokolisa kimya mpe mabaku malamu mpo na nkita.

XS
SM
MD
LG