Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bato 6,6 millions bazangi mosala na Etats-Unis mpo na COVID-19


Bato bazali kokoma mikanda ya kosenga lisungi ya mbulamatari na Los Angeles, Etats-Unis, 5 juin 2015.
Bato bazali kokoma mikanda ya kosenga lisungi ya mbulamatari na Los Angeles, Etats-Unis, 5 juin 2015.

Motango ya baye babungisi misala na bango mpe bazali kosenga lisungi ya l’Etat momati makasi mpo na COVID-19 na Etats-Unis. Na mposo moko, bato 6,65 millions nde basengi na mbulamatari lisungi ya baye babungisi mosala.

Yango ebakisami na 3,3 millions ya ba chômeurs bazwamaki mposo moko moleki.

Na mposo mibale, pene na 10 millions ya bato nde basengi lisungi mpo mosala mosili.

Yango, ata Congrès eyebaki na kondima linaka ya kopesa makasi na nkita ya mboka ya president Donald Trump.

85% ya ba Américains bavandisami na ndako mpo na COVID-19.

Virus eye ebomi bato 5.151 na Etats-Unis. Bato 217.263 nde bayebani kozwama na yango, kolanda Université américaine Johns Hopkins.

XS
SM
MD
LG