Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Ba Antibalaka (Centrafrique) babomi koleka 50 bato uto janvier na Nord-Ubangi


Basimba minduki Antibalaka na paroisse de Gambo, na sud-est de la Centrafrique,16 août 2017
Basimba minduki Antibalaka na paroisse de Gambo, na sud-est de la Centrafrique,16 août 2017

Ba Antibalaka, basimba minduki ya Centrafrique, babomi koleka bato 50 na bitumba na Nord-Ubangi (RDC), uto janvier, elobi mokambi ya etuka eye.

"Uto libandela ya mobu, ba batomboki ya antibalaka bakoti mpe babomi bavandi ya mboka koleka 50 ", elobi na AFP Izato Nzege, gouverneur ya Nord-Ubangi.

"Mbala ya suka bakotaki ezalaki na suka ya mposo moleki. Motango ya bawei ezalaki misato mpe bato babale basusu bazaokaki, " ebakisi M. Izato.

Ba Antibalaka bazali basimba minduki ya ngambo ya Centrafrique. Balobaka ete babundaka mpo na kobatela baklisto na bitumba mangomba ya ba musulmans basalaka na ekolo na bango.

Ba Antibalaka "bakotaka na mabele ya Congo mpo na koluka bileyi mpe bamemaka ba ntaba, ba ngombe " kasi "balanda mingi nde baye ya mboka na bango" baye bakima na RDC, eyebisi M. Izato.

Bakima bitumba 500.000 ya RDC bavandaka na Centrafrique. Bana mboka nzinganzinga balobaka monoko moko na ngambo ya bikolo bibale biye.

XS
SM
MD
LG