Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tedros ayoki motema mawa nsima na commission indépendante kondima ete basali ba OMS bazwaki basi na makasi na RDC


Mokambi to DG ya OMS (Mabongisi ma molongo mpo na bokolongono) na Geneve, Suisse, 3 juillet 2020. (Photo: Fabrice Coffrini via REUTERS)
Mokambi to DG ya OMS (Mabongisi ma molongo mpo na bokolongono) na Geneve, Suisse, 3 juillet 2020. (Photo: Fabrice Coffrini via REUTERS)

Mokambi ya OMS (Mabongisi ma molongo mpo na bokolongono), Dr. Tedros Adhanom Ghebreyesus alobi ayoki mpasi na motema nsima na commission indépendante moko kondima ete basali ba mabongisi maye bazwaki basi na makasi ntango ya Ebola na est ya RDC.

"Likambo lya yambo na kolobela na baye bazwaki mpasi to na ba victimes mpe na baye babiki nsima na yango, ezali ete nayoki motema mpasi. Nayoki motema mpasi na oyo esalamelaki bino na makasi na baye bazwamaki na mosala na OMS mpo na kosalela mpe kobatela bino," elobi Dr. Tedros na bokutani na bapanzi sango.

Alaki mbano mabe na baye basalaki mbeba yango.​

Mokambi to DG ya OMS asengaki enquête yango nsima na bofundami ya basali na bato mingi na 2020.

Commission indépendante etiamaki. Elandelaki bozwi basi na makasi na basali ba OMS ntango ya bokono bwa Ebola na monyele ya RDC kati na 2018 na 2020, endimi ete mbeba yango esalamaki.

Commission yango elobi ete boko na basali ba OMS bazalaki na "bozangi bobongisi malamu mosala mpe botioli mosala".

Basi mingi batatolaki ete basali ba OMS ya Beni mpe Butembo lokola mpe bayi molongo bazwaki bango to balukaki kozwa bango na makasi na kolakaka kopesa bango mosala, elobi rapport ya Commission ya OMS.

XS
SM
MD
LG