Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Police ebeti masasi na Sit-in ya basali ya bitumba na Ebola na Mbandaka


Basali ya bolongono na bitumba na Ebola, na milulu ya bovandi (Sit-In) mpo na kosenga lifuta lyango bango, na Mbandaka, Equateur, 12 aout 2020. (VOA/Christophe Yoka)
Basali ya bolongono na bitumba na Ebola, na milulu ya bovandi (Sit-In) mpo na kosenga lifuta lyango bango, na Mbandaka, Equateur, 12 aout 2020. (VOA/Christophe Yoka)

Police ebetaki masasi mpe molinga na Sit-in basali ba bokolongono ya bitumba Ebola basalaki mpo na kosenga lifuta lya bango na Mbandaka, na Etuka ya Equateur.

Basali yango batumbaki ba pneus mpe bakangaki nzela.

Mardi, basali baye bapesaki na secrétaire général (kalaka mokonzi) ya mambi ma bokolongo, Dr. Sylvain Yuma, mokanda mwa bosenga na bango yambo azonga na Kinshasa.

Bazali kosenga sanza misato ya lifuta.

Bokono bwa Ebola ya mbala ya 11 bobondaki na Equateur wuto le 1er juin.

Na le 5 aout, bato 74 bayebanaki na kozwama yango. 32 bakufi mpe 27 babikisami, kolanda OMS.

Kolanda ntoma ya Amerika na Kinshasa, Mike Hammer, USAID ebakisi millions mitano ya ba dollards mpo na kosunga misala mpe na bisaleli ya bitumba na Ebola.

XS
SM
MD
LG