Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

FARDC ebomi bayi CODECO 10, Ngudjolo azoki makasi na Ituri


Mathieu Ngudjolo (C) ya FPRI (Front pour la résistance patriotique (FPRI) na Floribert Kisembo (G) mokambi ya UPC (Union des patriotes congolais) na Bunia, Ituri, 18 mai 2003.
Mathieu Ngudjolo (C) ya FPRI (Front pour la résistance patriotique (FPRI) na Floribert Kisembo (G) mokambi ya UPC (Union des patriotes congolais) na Bunia, Ituri, 18 mai 2003.

Mampinga ma ekolo Congo démocratique mabomi babundi zomi ya lingomba ya CODECO na mboka Mopa, secteur ya Walebdu Pitsi na territoire ya Djugu. Mokambi na bango Justin Ngudjolo azoki makasi mpe akimi.

Molebeli ya ba FARDC, lieutenant Jules Ngongo asakoli ete ba sado ya mampinga ya mboka bapanzani mpo na koluka Ngudjolo.

"Tokokoba koluka Ngudjolo kino tokokanga ye na bomoi to akufa," elobi lieut. Ngongo.

Ba FARDC bazongiselaki masasi na ba CIDECO baye bandaki bitumba yango.

"Na babundi zomi bakufi, sambo bazalaki ba sinzili ya Ngudjolo," eyebisi lieut. Ngongo.

CODECO elobaka ebundelaka ba Lendu, kabila ya bayi bilanga baye babundaka na ba Hema, babokoli bibwele mpe basali mombongo.

CODECO efundama mpo na koboma bato 700 uto novembre.

XS
SM
MD
LG