Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Ba FARDC babomi J. Ngudjolo mokambi ya ba CODECO na Ituri


Basoda ya Monusco bazali kobongisa motuka na bango na Djugu, Ituri, 27 mars 2018.
Basoda ya Monusco bazali kobongisa motuka na bango na Djugu, Ituri, 27 mars 2018.

Ba FARDC basakoli ete babomi mokambi ya lingomba ya basimba minduki CODECO Justin Ngujdolo na Ituri.

"Justin Ngudjolo, mokambi ya ba CODECO asukisami elongo na babundi baye libwa na bitumba na mboka Mopka o’mokolo mwa misato," elobi na bapanzi sango mokambi ya misala ya FARDC na Ituri, général Robert Yav Avuli.

Lobi loleki, ba FARDC basakoli ete Justin Ngudjolo azokaki makasi na bitumba kasi akimaki.

Sango ya FARDC ezalaki ete bato zomi ya CODECO babomamaki.

Kasi lelo nde general Yav aebi na kopesa sango ya siki siki.

XS
SM
MD
LG