Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Sous-secrétaire adjointe Peterson azali na Kinshasa na masolo mpo na maponami ma 2023 na RDC


Sous-secrétaire adjointe ya Etats-Unis ya mambi ma Démocratie, Makoki ma bomoto mpe mosala, Lisa Peterson, na Washington, D.C., 30 mars 2021.
Sous-secrétaire adjointe ya Etats-Unis ya mambi ma Démocratie, Makoki ma bomoto mpe mosala, Lisa Peterson, na Washington, D.C., 30 mars 2021.

Masolo mpo na démocratie mpe maponami na ngonga mpe na ndenge esengeli, mazali kati na linaka Sous-secrétaire adjointe ya USA lisa Peterson akozala na yango na mobembo azali kobanda lundi na RDC.

Sous-secrétaire adjointe ya Etats-Unis ya mambi ma Démocratie, Makoki ma bomoto mpe mosala, Lisa Peterson, akomi o’moloko mwa yambo na Kinshasa mpo na masolo na bayi RDC mpo na mayi matali démocratie.

"Masolo makozala mpe mpo na boyokani bozali kosalama na ntina ya koyikisi makasi ba institutions ya démocratiqes (misala mya démocratie), kati na yango bosalami bwa maponami na bonsomi mpe ndenge esengeli na ngonga na yango na 2023," elakisi liyebisi lya Département d’Etat

Mobembo ya Mme Peterson mokozala ya mikolo mibale, wuto le 14 kino le 18 juin.

Akokutana na bayi mbulamatari mpe na société civile na Kinshasa.

Mme Peterson akolakisa elongi ya Etats-Unis na masalo ma yambo kati na bikolo mibale mpo etali makoki ma bomoto, elobi liyebisi.

Esengeli Mme Peterson akutana na kinshasa na bayi mbulamatari mpe société civile mpe mpo makoki ma kosukisa bozangi bokengi mpe kosala ete baye basalaka mbeba bamemisama mokumba.

Masalo mango makozala mpe mpo etali bonsomi ya bopanzi sango mpe bonsomi ya koloba mpe makasi may mazali kosalama na ntina ya kobundisama boteki bato.

XS
SM
MD
LG