Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Assemblée nationale endimi rapport ya maponami Nangaa apesi


Corneille Nangaa mokambi ya misala mya maponami CENI azali koyanola na bakeli mibeko na Assemblée nationale, Kinshasa, 13 avril 2021. (Twitter/CENI-RDC_
Corneille Nangaa mokambi ya misala mya maponami CENI azali koyanola na bakeli mibeko na Assemblée nationale, Kinshasa, 13 avril 2021. (Twitter/CENI-RDC_

Assemblée nationale endimi rapport ya misala mya maponami mya eleko wuto 2012 kino 2019 mpe rapport ya mobu 2019-2020 nsima na Coreneille nangaa mokambi ya CENI koyanola na mituna mya bango.

Corneille Nangaa oyo mandate to bokonzi bwa ye bosilaki wuto juin 2019 azongaki na Assemblée nationale nsima na 48 heures bakeli mibeko bapesaki ye.

M Nangaa asengi na Assemblée nationale kondima bakambi basika ba CENI mpe kosala mbonwanga esengeli mpo eleko esusu ya maponami ebandi.

Kasi abeti sete na kosenga machine ya voter kotikala mpo epesaki nzela ya kobomba misolo mingi mpe ekomisaki makambo mingi pete.

XS
SM
MD
LG