Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

SGA ya ONU asengi bana ya Beni babosana te monguna na bango


Kalaka mokonzi molandi ya ONU Jean-Piere LaCroix na bokomi na ye na Beni, Nord-Kivu, 30 novembre 2019. (Twitter/Monusco)
Kalaka mokonzi molandi ya ONU Jean-Piere LaCroix na bokomi na ye na Beni, Nord-Kivu, 30 novembre 2019. (Twitter/Monusco)

Kalaka mokonzi molandi ya ONU, Jean-Piere LaCroix akomaki o’mokolo ya mposo na Beni (Nord-Kivu) esika wapi bato bazali kotelemela MONUSCO wuto mposo moko nsima na bobamami ya koleka nkama na bavandi ya na maboko ya batomboki ya ba ADF.

"Sango ezali ete esengeli te bomikosa, bobunga banguna. Biso tozali na ngambo ya bana ya Congo," elobi M. LaCroix na Beni.

Andimi ete ezali na makambo ONU ekoki kobongisa. Alaki ete esengeli ete MONUSCO ekanisa yango malanu elongo na ba FARDC, PNC (Police nationale congolais) mpe na bakonzi ya ekolo eye na lolenge ya kobundisa ba ADF.

"Esengeli tokomisa makasi boyokani na biso mpe nakanisi ete esibandaki," elobi M. LaCroix.

SGA ya ONU akundoli lisusu atindami na SG ya ONU mpo na kolakisa bomoko na basali, na basoda ya ONU mpe na bavanadi ya esika eye.

Alobi ete esengeli bato bayeba ete ata bana ya Beni bazwi mpasi mingi na ba ADF kasi bayi MONUSCO mpe ONU mpe bazali ba victimes ya bitumba ya ba ADF.

XS
SM
MD
LG