Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

"Etat d’urgence" nsima na bitumba ya batomboki na Centrafrique


Président Faustin Archange Touadera na ndako ya lingomba lya ye lya politique MCU (Mouvement centrafricain unifié), na Bangui, Centrafrique, 27 décembre 2020.
Président Faustin Archange Touadera na ndako ya lingomba lya ye lya politique MCU (Mouvement centrafricain unifié), na Bangui, Centrafrique, 27 décembre 2020.

Président Faustin Archange Touadera, oyo awuti kolonga maponami, asakoli "état d’urgence" nsima na batomboki koluka kokweyisa ye na bokonzi Centrafrique.

"Etat d’urgence esakolami na ekolo mobimba mpo na mikolo 15, banda na minuit," esakoli molobeli ya président Touadera, Albert Yaloke Mokpeme na radio nationale.

Batomboki bazwa pene na moko na misato yam abele ya mboka.

M. Yaloke ayebisi AFP ete azali kolikya ete état d’urgence ekopesa nzela na bakonzi kokanga bato mabe.

M. Touadera asakoli molongi na koleka 51%.

Le 13 janvier, batomboki basalaki bitumba midale na Bangul kasi misala mya ONU (MINUSCA) mikangelaki bango nzela.

Batomboki baboyaki maponami mpe basengaki mazongisama nsima.

Mokonzi ya kala ya kala François Bozize mpe asengaki yango.

Président Touadera apamela ye na koluka kokweyisa ye.

XS
SM
MD
LG