Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

General Electric ya USA eyokani na mbulamatari mpo na ba projets ya pene 1,8 milliards $


Bakambi ya General Electric Company ya Etats-Unis (G) na ba ministres ya ekolo Congo démocratique na botiyami manzaka na boyokani na Kinshasa, 13 février 2020. (Facebook/Présidence RDC)
Bakambi ya General Electric Company ya Etats-Unis (G) na ba ministres ya ekolo Congo démocratique na botiyami manzaka na boyokani na Kinshasa, 13 février 2020. (Facebook/Présidence RDC)

General Electric Company ya Etats-Unis etie manzaka na protocole d’accord mpo na misala matali lotiliki mpe bokolongono na ekolo Congo démocratique. Misolo mikotiyama mikozala pene na milliard moko na millions mwambe ya ba dollards (1,8 milliards $).

Lobi mokolo ya misato 12 février 2020, mokonzi ya mboka Felix Tshisekedi akutanaki na bakambi ya company eye na Palais de la nation na Kinshasa, elongo na motindami ya motuya to Envoyé special ya Etats-Unis mpo na etuka ya Grands lacs, Peter Pham.

Botiyami manzaka na boyokani kati na General Electric na mbulamatari ya RDC bosalami na miso ya M. Pham mpe ntoma ya Etats-Unis na RDC, Mike Hammer.

Kobongisa ba turbines ya ba barrage I na II mpo na kobimisa 650 megawatts ya lotiliki ezali kati na misala mikosalama na boyokani bwango, eyebisi misala ya président Felix Tshisekedi.

XS
SM
MD
LG