Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Paris ezali kozela komona nini Sassou akosala mpo na ba opposants


Président ya Congo-Brazzaville Denis Sassou N'Guesso ayambani na mokokani wa ye ya France France Emmanuel na Palais ya Elysée na Paris, 3 septembre 2019.
Président ya Congo-Brazzaville Denis Sassou N'Guesso ayambani na mokokani wa ye ya France France Emmanuel na Palais ya Elysée na Paris, 3 septembre 2019.

Ministre ya mambi ya bapayaya France, Jean-Yves Le Drian, alobi ete ekolo na ye ezali kozela komona nini président ya Congo-Brazzaville Denis Sassou N’Guesso akosala mpo na ba opposants, mingi mpenza mpo na Jean-Marie Mokoko oyo abwakama na bokolo mpo na mibu 20 uto 2016.

"Na lobeli ye mpo etali M. Mokoko na basusu, na yebisi ye ete tozali kozela kotala nini akosala," elobi Le Drian nsima na bokutani na Denis Sassou N’Guesso.

Nzokande président Denis Sassou ayambamaki mpe na mokokani ya France Emmanuel Macron na ndako monene ya Elysée.

Kolanda moko na bapesi toli mpo etali sango ya mokonzi ya Congo-Brazzaville, mobembo moye mozali ya mosala.

Bakonzi babale baye basololi mpo etali boyokani ya mboka mibale, eyebisi mopesi toli ya M. Sassou. Balobeli mpe libanda ya bomoi to envrionnement, zamba mpe biteyelo, ebakisi mopesi toli.

XS
SM
MD
LG