Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Dangote alingi atiya mosolo na potasse na phosphate na Congo Brazzaville


Mwana ya ekolo Nigeria, Aliko Dangote (D), moto na nkita mingi na Afrika, ayambani na président Denis Sassou N'Guesso, na Oyo, Congo-Brazzaville, 21 août 2019. (Présidence Congo-Brazzaville)
Mwana ya ekolo Nigeria, Aliko Dangote (D), moto na nkita mingi na Afrika, ayambani na président Denis Sassou N'Guesso, na Oyo, Congo-Brazzaville, 21 août 2019. (Présidence Congo-Brazzaville)

Mwana ya ekolo Nigeria, Aliko Dangote, moto na nkita mingi na Afrika, alingi atiya mosolo na bosaleli potasse mpe phosphate na Congo-Brazzaville.

Aliko Dangote ayebisika mposa na ye na président Denis Sassou N’Guesso na masolo bazalaki na yango mercredi na Brazzaville.

"Boyeba ete tosi totiya misolo na ciment awa, 320 millions ya ba dollars, mpe lelo tolingi totiya misolo mingi mpo etali potasse na phosphate mpe, soki ekoka, na urée mpe na ammoniaque lokola tosala yango na Nigeria," elobi M. Dangote nsima na bokutani na M. Sassou.

M. Dangote akosala usine ya potasse mpe ya phosphate yango na groupe na ye.

"Nayebisi mokonzi ya mboka ete, tozali bapesi mosolo ya sembo, tozali na kondima na Congo na bakambi na yango. Tozali kolobela botiyami ya ba milliards mpo ezali nde misala ya minene makasi tozali kolobela. Ekopesa bato misala, ekopesa nzela na ba échanges (bosombitinya) mingi na mboka ya libanda," ebeti mokoloto M. Dangote.

M. Dangote alobi ete usine ya ciment asala na Yamba, na département ya Bouenza, ezali malamu.

Kolanda maloba maye, yango ezali investissement ya monene koleka na CEMAC (Lisanga ya nkita ya bikolo ya Afrique centrale).

Cimenterie yango elingi ebanda koteka ciment na mboka manso nzinnga nzinga ya Congo-Brazzaville.

"Banda pene na sanza mibale tobandaki koteka clincker na Cameroun, kala te ekobanda kotekama na Kinshasa, mpe toko kende na Gabon. Ntango manso maye makosalama, tokoloba ete tosali mosala malamu," elimboli Dangote.

Cimenterie ya Yamba ekoki kobimisa 1,5 million tonnes ya ciment.

XS
SM
MD
LG