Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

OMS esengi bosangisi makasi mpo kobundisa Ebola na RDC

Mokambi ya OMS, Dr Tedros Adhanom Ghebreyesus (G) apesi mbote na président Denis Sassou Nguesso na 69e session ya comité régional ya OMS, Brazzaville, 19 août 2019. (Twitter/ Dr Tedros Adhanom Ghebreyesus)

OMS, Mabongisi ya molongo mpo na bokololongo, esengi baye bapesaka ye maboko, mingi mpenza bikolo nzinga nzinga ya RDC kosangisa makasi na bitumba ya Ebola eye esili koboma bato koleka 1.930 na mboka ya moye ya kati ya Afriaa.

Mokambi ya OMS, Dr Tedros Adhanom Ghebreyesus, abwakaki mbela yango na bokutani ya 69e session ya comité régional ya OMS na bikolo ya Afrika, na Brazzaville.

"Ntango ekoki mpo ete ba partenaires banso, mingi mpenza bikolo libwa nzinga nzinga ya RDC, balakisa bondeko mpo na kokanga nzela na bopanzani ya Ebola," elobai Dr. Tedros Adhanon Ghebreyesus.

Bato koleka 400, kati na bango ba ministres 47 ya santé bazali na bokutani byango.

Président Denis Sassou Nguesso ya Congo-Brazzaville nde afungolaki bokutani yango.

Mokambi ya sika ya OMS mpo na Afrika akoponama na bokutani boye.

XS
SM
MD
LG