Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi asengi ete RDC esala 6e "Forum Investir en Afrique" moku mokya


Président Félix Tshisekedi azwi malabo na bokutani ya nkita "Investir en Afrique" na Kintele, Brazzaville, Congo-Brazzaville, 10 septembre 2019. (Twitter/Congo News Net)
Président Félix Tshisekedi azwi malabo na bokutani ya nkita "Investir en Afrique" na Kintele, Brazzaville, Congo-Brazzaville, 10 septembre 2019. (Twitter/Congo News Net)

Président Félix Tshisekedi asengi, na 5e Forum ya nkita "Investir en Afrique", ete RDC esala likita ya mobu mokoya.

"Lokola libaku lipesameli nfai, nasengi bino bondima nkombo ya RDC mpo na bosalami ya likita likoya ya Forum "Investir" na Afrika na ekolo na ngai. Natiyeli bino motema na ntembe te," elobi M. Tshisekedi.

Na maloba na ye, M. Tshisekedi alaki ete RDC ekobanda kobongola ba mines (makele) yambo na kotika byango kobima.

Ayebisi ete mbulamatari na ye ezali kosala manso mpo ete bobongoli ya makele bobanda kosalama na Congo démocratique yambo yango ebimi na mboka.

Alobi yango na 5e Forum investor en Afrique eye efungolami o'mokolo ya mibale na Kintele, na Brazzaville.

Bakonzi ya mboka minei misusu mpe bazali kuna: Paul Kagame ya Rwanda, Faustin-Archange Touadéra ya Centrafrique, Joao Lourenço ya Angola mpe Denis Sassou ya Congo-Brazzaville moyambi na bapaya baye.

XS
SM
MD
LG