Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Sassou akoti na bomikangami nsima na basungi ba ye kozwama na COVID-19


Président Denis Sassou N'Guesso ya Congo-Brazzaville na bokutani na président Russie Vladimir Poutine (amonani te na photo) na Kremlin, Moscou, Russie. 23 mai 2019.
Président Denis Sassou N'Guesso ya Congo-Brazzaville na bokutani na président Russie Vladimir Poutine (amonani te na photo) na Kremlin, Moscou, Russie. 23 mai 2019.

Président Denis Sassou N’Guesso amikotisi na bokangami wuto mokolo mwa eyenga nsima baike na basungi baye kozwama na bokono bwa COVID-19.

Liyebisi lya ndako ya mosala ya mokonzi ya Congo-Brazzaville lilobi ete botalisi nzoto bominisi Sassou N’Guesso ye moko na COVID-19 te kasi lilobi te soki akowumela ntango boni na bokangami.

Ministre ya mambi ya Bapaya Jean-Claude Gakosso nde alakisaki elongi na ye na likita Turquie-Afrika mposo moleki na Ankara.

Sassou N’Guesso azongisi nsima mobembo akingaki kosala na Pointe-Noire.

Mbulamatari ya Congo ekitisaki mwa moke mikano ya kobomba ekolo na COVID-19.

Couvre-feu ekomi wuto 23h kino 5h.

Milulu minso ya mbala mizongisami .

XS
SM
MD
LG