Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Balakisi bilongi ya RDC batamboli na milulu mya bobandi Jeux olympiques na Tokyo


Balakisi bilongi ya Ekolo Congo démocratique batamboli na bendele ya mboka na milulu mya bofungolami ya ba Jeux olympiques, Tokyo, Japon, 23 juillet 2021. (REUTERS/Mike Blake)
Balakisi bilongi ya Ekolo Congo démocratique batamboli na bendele ya mboka na milulu mya bofungolami ya ba Jeux olympiques, Tokyo, Japon, 23 juillet 2021. (REUTERS/Mike Blake)

Naomie Katoka akobunda taekwando mpe Marie Branser, molongi ya molongo oyo abotama na tata mpe na mama ya Allemagne nde akobunda mpo Ekolo Congo démocratique na momekano ya Judo. Kasi kino sika misolo mitindami nanu te na balakisi bilongi ya RDC.

Balakisi bilongi bya Ekolo Congo démocratique batamboli na milulu mya bofungolami ya ba Jeux Olympiques na Tokyo, Japon.

Mpo na mbala ya yambo na lisolo lya masano mya olympique, milulu myango misalami na etando ya lisano esika batali bazalaki kolanda mibeko mya komibatelama na COVID-19.

Ekolo Congo démocratiques elakisami elongi na basani sambo na mimekano minei.

Ba boxeurs to bapeti bibotu banei. Basi babale Naomie Yumba na Marcela Sakobi Matshu mpe babali babale : Fitson Mbaya Muluma na David Tshama Mwenekabwe.

Mpo na bopoti mbango to Athlétisme, Olivier Mwimba nde azali kuna.

Naomie Katoka akobunda taekwando mpe Marie Branser, molongi ya molongo oyo abotama na tata mpe na mama ya Allemagne nde akobunda mpo Ekolo Congo démocratique na momekano ya Judo. Kasi kino sika misolo mitindami nanu te na balakisi bilongi ya RDC.

Bayi ministère ya Sports bazali nanu kobongisa mpo na kotinda molato mpe maye masengeli na bayi mboka na Tokyo.

XS
SM
MD
LG