Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Samy Badibanga atiki mosala ya 1er VP ya Sénat


Samy Badibanga na Kinshasa, 20 décembre 2016.
Samy Badibanga na Kinshasa, 20 décembre 2016.

Samy Badibanga 1er vice-president to mokambi molandi ya Sénat atiki mosala na ye.

Modeste Bahati Lukwebo, mokambi awuti kobimba na maponami mposo moye nde asakoli yango.

Baike na bayi Sénat balobi ete ezali na mokano mwa ye moko.

VOA Lingala emekaki kobemnga Samy Badibanga kasi ayanoli te na nzela ya singa mpo na kolimbola yango.

Baike na bayi politiki balobi ekoki kozala mpo mbulamatari ekobima kala mingi te to mpo na bibonga bisusu bikokabolama kala mingi.

Samy Badibanga, moko na baye bazalaki na bibimbonga ya likolo ya kala na UDPS ya Etienne Tshisekedi mpe moko baye bazalaka malamu na président Felix Tshisekedi kino sika atikalaki se ye moko nsima na ba bétitions ekwayisaki Bureau définitif ya Sénat ekambamaki na Alexis Thambwe Mwamba.

Maponami masalamaki mpo na mabonga manso matikali longola se oyo ya vice-président ebonga na ye.

Sika na botiki mosala mwa ye, maponami masengeli mpe masala mpo na ebonga ya vice-president ya Senat.

M. Badibanga azalaki Ministre wa yambo sanza misato yambo na mapobani na 2016, yambo na Bruno Tshibala.

XS
SM
MD
LG