Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ba sénateurs ya RDC basengi Amerika ekotaka te na makambo ya bana ya mboka


Ba sénateurs na ndako na bango ya mosala, na Lingwala, Kinshasa, RDC, 25 may 2009
Ba sénateurs na ndako na bango ya mosala, na Lingwala, Kinshasa, RDC, 25 may 2009

Ba sénateurs ya commission ya relations extérieures ya parlement ya RDC basengi na Etats-Unis komipekisa komikotisa na makambo ma Ekolo congo démocratique na libanda ya mibeko mya boyokani ya mboka mibale.

"Mpo na bolamu ya bikolo bibale, tosengi boyokani ya bosolo mpe ya kotonga boye bavandisami likolo na botosi bwa malako ma boyokani kati na bikolo. Mpo na yango, lolelnge moko biso tomipekisaka komikotisa na makambo ya kati ya mboka esusu, mingi mpenza ma Etats-Unis, lolenge wana nde tozali na makoki ma kozela ete mboka esusu elakisa ezalaleli ya motindo moko wana," ekomi ba sénateurs ya RDC sambo ya commission eye.


Ba Sénateurs congolais batindeli mokanda mwango na ba Sénateurs libwa ya commission ya ba relations extérieures ya Amerika.

Commisson ya ba relations extérieures ya Sénat ya Amerika ekomelaki mokanda, na ebandeli ya mposo, na ministre ya Finances (Secrétaire ya Trésor ya Amerika) na ministre ya mambi ma bapaya (Secrétaire d’Etat) mpo na kosenga ete "mbulamatari ya mboka na bango epesa lisusu maboko makasi na président Félix Tshisekedi na bitumba bya ye na kaniaka mpe na misala mya moyibi ya mbulamatari ya mokonzi ya kala Joseph Kabila," ekomaki ba Sénat ya Amerika.

Secrétaire d'Etat ya Amerika, Mike Pompeo na molandi wa ye atalaka Afrika, Tibro Nagy basepelaki na komona ete mokanda mwa mowutaki na bayi ngambo ya ba républicains na ba démocrates.

Ba sénateurs sambo ya RDC, bango, basengi ete boyokani boya makasi kati na ba institutions ba Etats-Unis na ya RDC.

Baponami ba RDC bayebisi mpe ete makambo ma bokengi mpe ma bitumba na kaniaka mazalaki na maye babundela wuta kala mpe président Joseph Kabila abandaka yango na kotia misala misengeli na esika mpe Conseiller spécial ntango afungola pilitiki ya "Tolérance zéro".

Ba Sénateur ya RDC ya opposition mpe pouvoir batiaki manzaka: Francine Muyamba, Jérôme Bikenge, Diendonnette Mungwadjo, Jean de Dieu Moleka, Lénard She Okitundu, Boni Mwawatadi na Mossal Sanguma nde bato batiaki manzaka na eyano bapesi bakokani ba bango ba Etats-Unis

XS
SM
MD
LG