Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Rwanda ekangi ndelo na yango


Ndelo kati na RDC na Rwanda na Goma, 23 mars 2020. (VOA/Charly Kasereka)
Ndelo kati na RDC na Rwanda na Goma, 23 mars 2020. (VOA/Charly Kasereka)

Bakonzi ya Rwanda basakoli dimanche ete ndelo inso ya ekolo na bango ekangami mpo na kopekisa bopanzani bwa coronavirus COVID-19 ya sika oyo esili kozwa bato banei na mabele ma bango.

Bakanagmi bwa ndelo bozali moko na mikano ya makasi mbulamatri ya Kigali ezwi.

Mokano mwango momemi mwa mbano na ngambo ya RDC.

Bayike ya bayi mombongo mpe misala ya transport ba yanoli na VOA Lingala ete yango epesi bango mpasi mingi.

"Boyeba ete kaka mpo na engumba ya Goma na ndelo na Gisegnyi, mboka nzinganzinga na ngambo ya Rwanda, koleka bato 40.000 nde bakatisa mpe bazongaka mikolo nyonso na Petite-barrièe ya Goma. Sik’oyo, tokosala nini?," etuni moko na bayi mombongo bazali na handicap kasi apesi nkombo ye.

Mpo na ye mabota mingi makomona mpasi mpo na yango.

XS
SM
MD
LG