Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Bakoni ba COVID-19 bakomi 30 na Kinshasa


Bato bazali kosokola maboko liboso ya minganga mpe bayi bokengi na Gatumba, ndelo kati na RDC na Burundi, 18 mars 2020.
Bato bazali kosokola maboko liboso ya minganga mpe bayi bokengi na Gatumba, ndelo kati na RDC na Burundi, 18 mars 2020.

Motango ya bakoni ba coronavirus ya sika bokomi 30, eyebisi bakonzi ya bokolongo bwa nzoto na ekolo Congo democratique.

"IRNB (Institut national des recherches biomedicales) endimi butu boleki ete batoni ya sika sambo bazwami na COVID19," esakoli ministre ya bokolongono Dr. Eteni Longondo na Twitter.

"Kati na bango misato bavandaki na poto (Europe) mpe minei bazwi bokono bwango na mboka. Motango ya bakoni momati kowuta 23 kino 30," ebakisi Dr. Longondo.

O’mokolo mwa mposo, Dr. Longondo asokolaki liwa ya yambo ya mokoni ya coronavirus na ekolo Congo démocratique.

Apesaki te nkombo mpe sango mosusu mpo na mowei kasi ba media ya Kinshasa esakolaki ete ezali ndeko mpe moko na basungi ya ministre ya Economie (ya Nkita) oyo ye moko mpe azali na lopitalo mpo na COVID19.

Kolanda media ya Kinshasa, ministre mosusu mpe azwami na yango.

Jeudi, elobi ba media, président Félix Tshisekedi mpe mbulamatari mobimba basalaki test. Kasi ebimi négatif.

XS
SM
MD
LG