Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Moto wa yambo akufi na COVID19 na Kinshasa

Eugene Amuri, moteki na nzela na wenze ya Kimironko azipi zolo mpe monoko na "kitenge" masque ya liputa mpo na komibatela na coronavirus ya sika (COVID-19), Kigali, Rwanda, 17 mars 2020. REUTERS/Maggie Andresen

Bakonzi ya bokolongono na ekolo Congo démocratique basakoli ete mokoni moko ya coronavirus ya sika akufi mpe motango ya bato bamonani na bokono bwango mokomi 23. Ye nde mobeli wa yambo oyo akufi na COVID-19 na mboka.

"Lobi INRB (Institut national des recherches biomédicales) endimaki bakoni batano ya sika. Bazali bango banso ba Congolais. Mapinga ya bayi bakozwa bango na mokumba bazali kosalisa bango. Mpe lisusulobi, tozwaki moto wa yambo akufi na COVID-19," ekomi ministre ya bokolongono Dr. Eteni Longondo na Twitter.

Ministre aboyi kopesa nkombo mpe sango mosusu ya mowei.

Kasi ba media mingi basokoli na Kinshasa ete ezali ndeko ya ministre moko ya mbulamatari ya ekolo mpe ministre yango azali mpe ye moko na bokono boye.

Jeudi, likita ya mbulamatari lisalemaki te. Bayi mbulamatari bakendaki kosala test na INRB.

XS
SM
MD
LG