Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

DG ya SOCOC akangami na Goma


Bato babale bakangami na boloko ya Goma, Nord-Kivu, 17 novembre 2008.
Bato babale bakangami na boloko ya Goma, Nord-Kivu, 17 novembre 2008.

Mokambi ya SOCOC (Société congolaise ya construction), Modeste Makabuza akangami mpe atiyami na boloko na Goma mpo na bolukiluki ya boengwisami misolo mya mikolo nkama ya mokonzi Felix Tshisekedi.

Sango yango epesami na Me Georges Kapiamba, mokambi ya ONG ACAJ (Association congolaise pour l’accès à jusitce).

Modeste Makabuza DG ya société SOCOC awuti kokangama mpe kotiama na boloko ya Munzenze na Goma, azali kozela botinami bwa ye na Kinshasa mpo na bongwisami ya misolo ya l’Etat mipesamaki na misala ya kotia goudron na ba nzela ya Nord-Kivu, Sud-Kivu mpe Kasaï, ekomi na Twitter Me Kapiamba.

Baiike bakanami mpo na makambo yango lokola Vital Kamerhe mokambi ya ndako ya mosala ya president Tshisekedi.

Mokambi ya FONER (Fonds national ya entretien routier) mpe bakambi ya ba sociétés mpe ba banques baiike bakangami mpe lokola.

Bazuzi bazali kokoba boluluki na bango.

XS
SM
MD
LG