Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Député provincial Assamba atindami boloko ya Bunia na kofundama na kofinga Tshisekedi


Mokeli mibeko ya etuka ya Ituri mpe moyi FCC Jean-Bosco Assamba, Bunia, na photo etiamaki na Facebook na ye le 21 septembre 2019. (Facebook/Jean-Bosco Assamba)
Mokeli mibeko ya etuka ya Ituri mpe moyi FCC Jean-Bosco Assamba, Bunia, na photo etiamaki na Facebook na ye le 21 septembre 2019. (Facebook/Jean-Bosco Assamba)

Mokeli mibeko ya etuka ya Ituri Jean-Bosco Assamba atindami na boloko bonene ya Ituri nsima na koyanola na parquet militaire ya Bunia mpo na video moko amonisami na kati mpe azalaki kososola mokonzi ya mboka.

"Mokeli mibeko Assamba atindami na boloko ya bunia. Ayanolaki na auditeur militaire ya garnison ya tribunal ya Bunia o'moloko mwa eyenga. Ntina ya bokangami na ye eyebisami nanu te," esakoli na AFP avocat na ye Jean-Marie Ezadri.

M. Assamba azali moyi FCC (Front commun pour le Congo), lingomba ya masanga mazali nsima ya mokonzi ya kala Joseph Kabila.

"Député Assamba alobaki makambo mango kala, yambo na botiami ya état de siège, ntango asengamaki kolobela bokengi na Ituri," elobi avocat na ye.

Na vidéo yango, M. Assamba azalaki koloba ete “mokonzi ya mboka akosaka mingi”.

“Nakomi na ntembe ete mpokonzi ya mboka akanisaka mpenza bana ba Ituri. Alakaki cantonment, eloko moko te esalama. Alakaki désarmement, eloko te. Alakaki makambu mingi, eloko. Alobaki akoya aya, eloko te. Nyonso alakaka, asalaka yango te," elobaki député Assamba na vidéo yango.

Président Tshisekedi atiaki état de siège koleka sanza moko na mposo misatu mpe azalaki na Ituri mposo moleki.

Bakonzi ya mapinga bakebisaki bato koloba makambo masusu makoki kobebisa milimo ya basoda.

Kasi, Sous-Secrétaire d’état adjoint ya USA mpo na makokoki ma bomoto, démocratie mpe mosala, Lisa Peterson, asengaki na mposo moleki na mobembo na ye na Kinshasa ete makoki mabomto, lokola makoki ya kopanza sango mpe ya kozwa maloba matosama ata état de siège ezali.

XS
SM
MD
LG