Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mokanda ya Biden na Tshisekedi mpo na mibu 61 mya lipanda

Président Félix Tshisekedi (D) ayambi motindami ya lokumu ya Etats-Unis mpo liseke to corne ya Afrika Jeff Feltman (G) elongo na ntoma na ya Amerika na Kinshasa Mike Hammer (C) na Goma, Nord-Kivu, 26 juin 2021. (Présidence RDC)

Joe Biden atombeli eyenga elamu mpe apesi longonya na mokokani wa ye président Félix Tshisekedi mpo na mokolo moye mwa litomba mpo na Ekolo Congo démocratique.

Mokonzi ya Etats-Unis apesi mpe losaka na bokambi ya Tshisekedi na Union africaine.

Ntoma ya Amerika Mike Hammer nde amemaki mokanda mwango na Félix Tshisekedi.

Na mokanda mwango, Joe Biden akumisa makasi Félix Tshisekedi azali kosala mpo na kotomba RDC na kokitasaka yango na boyokani mpo na bokambi malamu na nzela ya linaka libengami PP4PP+P ((Boyokani malamu mpo kimya mpe bofulukisami kati na Etats-Unis na RDC).

Lokola Joe Biden, Président ya Chine Xi Jimping mpe bakonzi basusu mpe batindi ya bango mpe maloba.

XS
SM
MD
LG